eng
stringlengths
1
588
lin
stringlengths
1
664
Many churches and temples are ornate and lavishly decorated .
Bandako - nzambe ná batempelo mingi ezalaka na bililingi mpe mayemi ndenge na ndenge .
Some resemble tepees covered with tree bark .
Bandako yango mosusu ezali lokola bandako ya kapo , oyo likoló na yango batyaka mposo ya nzete .
Many brothers spend hours each month preparing meeting parts .
Bandeko mibali mingi balekisaka bangonga ebele sanza nyonso mpo na kobongisa masolo oyo bakosala na makita .
Most who sin seriously are truly repentant and are not disfellowshipped from the congregation .
Bandeko mingi babongolaka motema ntango bakwei na lisumu monene mpe babimisamaka na lisangá te .
Fellow Witnesses accompany Gary in the ministry , often pushing the wheelchair he uses because of his arthritis .
Bandeko mosusu babimaka elongo na Gary na mosala ya kosakola , mpe mbala mingi batindikaka ye na velo oyo asalelaka mpo na maladi na ye ya mikuwa .
Otherwise , it cost $ 2.50 ( U.S . ) .
Bandeko mosusu bazalaki kosomba yango dolare mibale na ndambo .
Adding guilt to their already heavy burden is surely the last thing that their loved ones would want to do .
Bandeko mpe baninga na bango basengeli kokeba ete bápesa bango foti te , mpamba te yango ekoya kobakisa kilo na mokumba oyo bazali komema .
Today , God 's people are not under some secretive , clandestine administration .
Bandeko oyo bazali kokamba mosala basengeli kozala bato oyo bandeko mosusu bakoki kokende epai na bango kozanga kobanga .
The Hospital Liaison Committee found a hospital in Barcelona that agreed to treat me without blood .
Bandeko ya Komite ya boyokani elongo na minganga bazwaki lopitalo moko na Barcelone oyo endimaki kosalisa ngai kozanga kosalela makila .
And just as important was the support I received from the Christian brotherhood and the encouragement I got from our publications .
Bandeko ya lisangá mpe masolo oyo nazalaki kotánga na mikanda ya moombo ya sembo elendisaki ngai mingi .
Some believers pray to Mary or to other entities , such as angels and individuals , who are revered as " saints . "
Bandimi mosusu babondelaka Maria to bikelamu mosusu lokola baanzelu mpe bato oyo babengamaka " basantu . "
They would share in our suppertime conversation , and their expressions added to our appreciation for the spiritual heritage we had .
Bango mpe bazalaki kobɛtela biso masolo ntango tozali kolya na mpokwa , mpe masolo na bango ezalaki kobakisa lisusu botɔndi na biso mpo na libula ya elimo oyo tozwaki .
They all agreed that these meals were very tasty indeed !
Bango nyonso bazalaki kosepela na bilei mpenza yango !
Three of my companions died in the fighting , along with dozens of " enemy " soldiers .
Baninga na ngai misato bakufaki na etumba yango , elongo na basoda ebele ya ekólo yango .
Fellow Africans revived him and tried to comfort him .
Baninga na ye Baafrika bapesaki ye makasi mpe balendisaki ye .
Can friends or family make themselves available to help ?
Baninga to bandeko na bino bakoki kozala wana mpo na kosalisa bino ?
Two elders , whom I knew very well , spent many hours helping me to see the value of continuing in full - time service .
Bankulutu mibale , oyo nayebaki malamu balekisaki bangonga mingi mpo na kosunga ngai na kokanga ntina ya kokóba kati na mosala ya ntango nyonso .
Elders and some others in the congregation advised her not to move away , but several sisters urged her to go abroad .
Bankulutu ná bandeko mosusu ya lisangá bapesaki ye toli akende te , kasi bandeko basi mingi na lisangá balendisaki ye akende kaka .
Elders sent out from the school render assistance in evangelizing , shepherding , and teaching , thereby building up the congregations spiritually . - Ephesians 4 : 8 , 11 , 12 .
Bankulutu oyo bakɔtaki na eteyelo yango bazali kosunga mpenza na mosala ya kosakola , ya kobatela bampate , mpe ya koteya ; na ndenge yango bazali kolendisa masangá na elimo . - Baefese 4 : 8 , 11 , 12 .
Thousands of Jews seized this opportunity and returned .
Bankóto ya Bayuda bazongaki na mboka na bango .
Ants are marvelously organized and remarkably cooperative with one another .
Bansɛlɛlɛ bazali na ebongiseli moko malamu mpenza mpe basalaka na bomoko .
Once in a while I looked up , and to my amazement no one was moving , not even the children .
Bantango mosusu nazalaki kotala bayangani mpe nakamwaki na komona ete moto moko te azalaki koningana , ezala ata bana mike .
Jesus ' apostles could readily identify Jesus ' teachings as the truth .
Bantoma ya Yesu bazalaki na mpasi te mpo na koyeba ete mateya na ye ezalaki mateya ya solo .
The faithful apostles heeded Jesus ' parting words .
Bantoma ya sembo ya Yesu batosaki maloba wana ya nsuka ya Yesu .
Those " who walked just 3.2 km ( two miles ) per day - even at a leisurely pace - reduced their risk of death from all causes by half , " notes the report .
Baoyo " bazalaki kotambola kilomɛtɛlɛ 3,2 na mokolo - ata malɛmbɛmalɛmbɛ - bamibatelaki na katikati ya makama oyo makokaki komema bango na liwa . "
Where are the great majority of those now who , professedly , were ' aroused to serve God ' as they ought by that cry of time for the Lord 's coming ?
Baoyo , na bolingo na bango moko ˈbapusamaki na kosalela Nzambe , ˈ lokola basengelaki kosala yango , ntango bayokaki kosakolama ya eleko ya koya ya Nkolo , bazali wapi ?
Those unwilling to submit to Jehovah 's rulership will eventually be separated from God 's people .
Baoyo baboyaka kotosa boyangeli ya Yehova nsukansuka bakomitangola na basaleli ya Nzambe .
Those who let themselves be guided by God benefit greatly from his generosity .
Baoyo bandimaka ete Nzambe atambwisa bango bazwaka mapamboli mingi .
Those who are truly generous in spirit do not wait for special days .
Baoyo bazali solo na elimo ya bokabi bazelaka te mikolo miponami .
Those whose circumstances allow are impelled by love to leave the relative comfort of their homes and , much like Nehemiah , move to other locations to give assistance to those in need .
Baoyo makambo na bango epesi bango nzela , bolingo oyo bazali na yango etindaka bango bátika bomoi ya malamu oyo bazali na yango mpe bákende na bisika mosusu mpo na kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi ndenge oyo Nehemia asalaki .
They will be world conquerors .
Bapakolami bakolonga mokili .
Newly baptized anointed ones became part of the slave , and regardless of who initially taught them , they went on to receive instruction from members of the congregation who met the Scriptural qualifications to serve as older men .
Bapakolami oyo bazwi batisimo sika bazalaki kokɔta na etuluku yango ya moombo , mpe ata soki nani ateyaki bango liboso , bakobaki koyoka mateya ya bankulutu oyo bakokisaki masɛngami ya Biblia .
For faithful anointed ones ' there is richly supplied the entrance into the everlasting kingdom of Jesus Christ ' through their resurrection to spirit life in heaven . - 2 Peter 1 : 11 .
Bapakolami ya sembo ' bakokɔtisama mpenza kati na bokonzi ya seko ya Yesu Klisto ' na nzela ya lisekwa mpo na kozala na bomoi ya elimo kati na makoló . - 2 Petelo 1 : 11 , MN .
Under heavy guard , Paul was brought from Jerusalem to the seaport city of Caesarea , where he appealed to Caesar .
Bapesaki Paulo na mabɔkɔ ya basoda mpo na kokɛngɛla ye banda na Yelusaleme tii na Kaisalia , mboka oyo ezalaki na libongo ya masuwa , mpe kuna asɛngaki akende kosamba liboso ya Kaisala .
Other comments focused on helping the students maintain joy in their assignment .
Bapesaki lisusu bana - kelasi toli mpo bábatela esengo na mosala na bango .
Some of my students have been involved with the police for shoplifting or things like that .
Bapolisi bakangaki to basambisaki bana - kelasi na ngai mosusu mpo bayibaki na bamagazini to mpo na makambo mosusu ya ndenge wana .
For a few weeks , they made a note of every meeting they attended .
Basalaki boye : na boumeli ya mwa bapɔsɔ , bazalaki kokoma makita nyonso oyo bazalaki kokende .
This proverb is often used in reference to something a child will automatically learn with little instruction .
Basalelaka lisese yango mbala mingi mpo na kolobela likambo oyo mwana moke akoyeba ye moko ata soki balakisi ye te .
God 's people today do not engage in carnal warfare , but they do face many tests and challenges .
Basaleli ya Nzambe babundaka na mosuni te , kasi bakutanaka na komekama mpe mikakatano mingi .
Jehovah 's servants love and treasure the Bible .
Basaleli ya Yehova balingaka Biblia mpe bapesaka yango valɛrɛ mingi .
Jehovah 's people have used the world 's technology to preach the good news .
Basaleli ya Yehova basalelaka biloko ndenge na ndenge oyo mokili ebimisaka mpo na kosakola nsango malamu .
Many worshippers of Jehovah have experienced the peace of God under the most severe trials .
Basambeli mingi ya Yehova bayokaki kimya na ye ntango bakutanaki na mikakatano makasi mpenza .
Judges , Ruth , and part of First Samuel .
Basambisi , Ruta , mpe ndambo ya mokanda ya liboso ya Samwele .
Cells convey , interpret , and carry out instructions contained within their genetic code .
Baselile ezwaka , etángaka mpe ememaka makambo oyo ezalaka na kati ya ba - gènes na yango .
They had to go to the temple in order to complete the requirements of the vow .
Basengelaki kokende na tempelo mpo na kokokisa makambo oyo ndai na bango esɛngaki .
There they were forced to spend the night .
Basengelaki kolekisa butu mobimba kuna .
They realize that " the eyes of Jehovah are in every place , keeping watch upon the bad ones and the good ones . " - Proverbs 15 : 3 .
Basengeli koyeba ete " miso ya [ Yehova ] ezali na bipai nyonso , kotalaka mabe mpe malamu . " - Masese 15 : 3 .
Women who have an abortion do so for various reasons , including economic hardship , relationship problems , the desire for freedom to pursue further education or a career , or not wanting to be a single mother .
Basi oyo balongolaka zemi basalaka yango mpo na bantina ndenge na ndenge , na ndakisa , kozanga mbongo , kozanga koyokana malamu , mposa ya kozala na bonsomi mpo na kotánga to mosala to mpo na koboya kobɔkɔla mwana azangá tata .
Some who were formerly violent have given up that life - style .
Basili kokóma baklisto oyo balingi kimya , kolandáká bongo ndakisa ya Yesu Klisto .
Jerusalem and her temple were destroyed , and it is reported that over one million people died as a result of famine , power struggles , and attacks by the Roman armies .
Basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme mpe tempelo na yango , mpe bato koleka milio moko bakufaki mpo na nzala , mpo na matata ya koluka kozwa bokonzi , mpe mpo na bitumba na basoda ya Loma .
Sisera 's army was drawing nearer , flashing ominously with the glint of iron .
Basoda ya Sisera bazalaki se kopusana , bibende ya makalo na bango ezalaki kongɛngangɛnga mpe kobangisa .
They purchased discarded plastic bottles and spent 14 days cutting off both ends and joining 39,000 of them together as one continuous tube .
Basombaki milangi ya plasitiki oyo bato babwakaka mpe basalaki mikolo 14 mpo na kokata milangi 39000 na motó mpe na nse mpe bakangisaki yango lokola tiyo moko ya molai mpenza .
Scythians and the Bible
Basukute mpe Biblia
Others promptly dismiss it as wrong .
Basusu babenganaka nokinoki bamposa ya mabe .
Some may need tender help to align their thinking with God 's .
Basusu bakoki kozala na mposa básalisa bango na boboto nyonso mpo báyokanisa makanisi na bango na makanisi ya Nzambe .
Others attribute to God the suffering caused by natural disasters .
Basusu balobaka ete Nzambe nde abimiselaka bato bampasi oyo eutaka na makama lokola mopɛpɛ makasi , mpela to koningana ya mabele .
Some might even have you believe that it is no use trying to reestablish contact with your father because he is dead .
Basusu kutu bayebisi yo ete ezali na ntina te oluka tata na yo mpamba te asilá kokufa .
Servants cleaned the house , cooked , did the laundry , cared for the garden , and drove the car .
Basáli nde bazalaki kokɔmba ndako , kolamba , kosukola bilamba , kokɛngɛla elanga mpe kotambwisa motuka .
The caravan journeyed first to Haran , some 600 miles ( 960 km ) to the northwest , following the course of the Euphrates . At Haran , the family settled for a time .
Batambolaki pembenipembeni ya Ebale Efrate , mobembo ya kilomɛtrɛ soki 960 na nɔrdi - wɛsti mpo na kokóma na Harane , epai bafandaki liboso mpo na mwa ntango .
Christian family heads must take an interest in the appearance of family members .
Batata ya mabota basengeli mpenza kolandelaka molato mpe ndenge oyo moto mokomoko na kati ya libota azali kobongisa nzoto na ye .
Older deaf Witnesses remember what it was like to engage in the " hearing " field ministry .
Batatoli mosusu oyo bazali bababa bakanisaka ndenge bazalaki kosala mpo na kosakola epai ya bato oyo bazali bababa te .
Some who devote themselves full - time to share in the disciple - making work do receive assistance to defray their transportation costs and other personal expenses .
Batatoli oyo bamipesaka mpo na kolekisa ngonga mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli bazwaka lisungi oyo esalisaka bango mpo na kofuta transport mpe kokokisa bamposa na bango mosusu .
In modern times , how did Jehovah 's Witnesses begin ?
Batatoli ya Yehova babandaki ndenge nini na ntango na biso ?
Jehovah 's Witnesses are happy to help you .
Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo .
What Do Jehovah 's Witnesses Believe ?
Batatoli ya Yehova bandimaka makambo nini ?
Jehovah 's Witnesses choose to live by the moral code set forth in the Bible .
Batatoli ya Yehova baponaka kotosa toli ya Biblia na oyo etali bizaleli malamu .
Jehovah 's Witnesses are creationists .
Batatoli ya Yehova bazali bato oyo balobaka ete Nzambe akelá mokili na boumeli ya mikolo motoba ya ngonga 24 .
By far the majority held firm to the fundamental Scriptural principle : " Obey God as ruler rather than men . " - Acts 5 : 29 ; Mark 12 : 17 .
Batatoli ya Yehova mingi batikalaki sembo mpe balandaki etinda ya Biblia oyo : ' Bótosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato . ' - Misala 5 : 29 ; Malako 12 : 17 .
Focus on your marriage .
Batelá libala na yo .
Keep your home clean and free of garbage and wastewater .
Bateláká ndako na yo pɛto mpe bwakáká salite mpe mai ya bosɔtɔ .
What teachings were you exposed to as a youth ?
Bateyaki yo mateya nini ntango ozalaki elenge ?
We were sent to the coastal towns of Broadstairs and Ramsgate in the county of Kent , where we rented a room .
Batindaki biso na Broadstairs mpe na Ramsgate , bingumba mibale oyo ezalaki pembeni ya mbu na etúká ya Kent .
Ruth Hemmig and I were assigned to Istanbul , Turkey
Batindaki ngai ná Ruth Hemmig na engumba Istanbul , na ekólo Turquie
She too was assigned to Cuba .
Batindaki ye mpe na Cuba .
Having been created with a conscience , people normally have an inborn sense - albeit at times inaccurate or distorted - that alerts them to what is right or wrong , honest or dishonest , appropriate or inappropriate .
Bato bakelamá mpe na lisosoli , likoki oyo moto nyonso azalaka na yango ya kokesenisa malamu ná mabe , bosembo ná kozanga bosembo , likambo oyo ebongi ná oyo ebongi te .
How large will this gathering be ?
Bato bakozala ebele ?
People wanted a church that would be less rich and more holy .
Bato bazalaki kolinga lingomba lisantu kasi lingomba ya bozwi te .
People used paraffin lamps for light , and white - painted wooden houses were heated with wood and coke .
Bato bazalaki kosalela miinda ya pétrole mpe bazalaki na bandako ya mabaya oyo mingi kati na yango epakolamaki lángi ya mpɛmbɛ , mpe bazalaki kotya molungé na ndako na mɔ ́ tɔ ya nkóni na makala ebéngami houille to charbon .
People venerate these spirits to ward off calamity and to receive favors .
Bato bazali kosambela bilimu wana mpo na komibatela na makámá mpe mpo na kozwa lisungi .
This colonnade , or stoa , was a popular promenade and place of meeting .
Bato mingi balingaki ndako ya makonzí wana , to stoa , mpo na kominanola mpe koyangana .
That sentiment is shared by many who feel that although religious affiliation is important , it does not really matter which religion one chooses to follow .
Bato mingi balobaka bongo mpo bakanisaka ete ezali na ntina moto azala na lingomba moko boye , kasi ata aponi lingomba nini , yango ezali na ntina te .
Many will gladly allow a stranger to show them the answers from the Bible .
Bato mingi basepelaka ete mopaya alakisa bango biyano na kati ya Biblia .
People in general were kept in spiritual ignorance .
Bato mingi bazalaki na molili ya elimo .
A class developed , known as the clergy , who reserved for themselves the privilege of preaching .
Bato mosusu bakómaki kobengama bakonzi ya lingomba ; batikaki nzela te ete bato mosusu mpe bázwa libaku malamu ya kosakola , kaka bango nde bakokaki kosala yango .
' It 's something to do with your hands . '
Bato mosusu balobaka ete ' ezali mpo na kosimba mwa eloko moko na mabɔkɔ . '
Others have been enticed by get - rich - quick schemes and risky financial investments .
Bato mosusu bazali koluka ndenge oyo bakoki kokóma mbala moko bazwi to mpe bazali kondima kosala mimbongo oyo ekoki komɛla bango mbongo nyonso .
Some consider this to be " the oldest extrabiblical archaeological evidence " of Jesus ' existence . - 6 / 15 , page 3 - 4 .
Bato mosusu bazali kotalela yango lokola " eloko eleki koumela na kati ya biloko oyo bato ya arkeoloji bazwá oyo , longola makambo oyo Biblia elobi , ezali kondimisa " ete Yesu azalaki . - 15 / 6 , nkasa 3 - 4 .
Some in that city were becoming a divisive influence in the congregation by introducing false teachings .
Bato mosusu na engumba yango bakómaki kokɔtisa bokabwani na lisangá na ndenge bazalaki kokɔtisa mateya ya lokuta .
But the payoff - building trust - is worth it .
Bato mosusu nyonso bazali na esengo .
The grain fleets were privately owned by Greeks , Phoenicians , and Syrians , who commanded and equipped them .
Bato mosusu ya Grèce , Foinike , mpe Sulia , bazalaki na masuwa ya bango moko oyo ezalaki komema bilei .
According to some experts , 6.5 million tons of litter enter the world 's oceans each year .
Bato mosusu ya mayele balobi ete batɔne milio 6 na ndambo ya bosɔtɔ ekɔtaka mbula na mbula na mai ya mbu .
Scientists who spent over four years examining 2.5 million specimens in the Gray Herbarium and Arnold Arboretum of Harvard University were able to pinpoint more than 5,000 plant species previously overlooked as potential sources of medicines .
Bato na ntɔ ́ ki oyo balekisi mibu 4 mpo na koyekola bamilió 2,5 ya spécimens kati na herbier Gray mpe arboretum Arnold ya Eteyelo monene ya Harvard babimisaki lolenge koleka 5 000 kino ntango wana ezalaki kotyelama likebi te mpe ezali na likoki ya kozala na litomba na makambo matali bankisi .
All mankind will be well fed .
Bato nyonso bakobanda kolya malamu .
All obedient mankind will benefit when God 's will becomes a full reality .
Bato nyonso ya botosi bakozwa litomba ntango mokano ya Nzambe ekokokisama .
Those who act on these Bible principles truly " honor widows . "
Bato oyo balandaka toli yango ya Biblia ' bapesaka basi oyo bakufelá mibali lokumu . '
Those who came that day numbered " about five thousand men , besides women and young children . "
Bato oyo balandaki bango mokolo wana bazalaki " mibali nkóto mitano ( 5 000 ) , longola basi ná bana mike . "
Let the account come to life . Main characters : Jeremiah , Ebed - melech , King Zedekiah
Bato oyo balobeli mingi : Yirimia , Ebede - meleke , Mokonzi Zidikiya
The bereaved families were inconsolable .
Bato oyo bandeko na bango bakufaki bazalaki kolela mingi .
Although he was not a religious man , his daughters were strict Southern Baptists .
Bato oyo bazalaki kotambwisa makambo na ndako ezalaki nde bana basi ya nkɔkɔ oyo bazalaki mikóló .
Those not having faith are actually poor in God 's eyes . - Revelation 3 : 17 , 18 .
Bato oyo bazali na kondima te bazali mpenza babola na miso ya Nzambe . - Emoniseli 3 : 17 , 18 .